Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Linu lya Lumumba" likozongisama lisusu te le 21 juin na RDC


Patrice Lumumba azali kopesa mbote wuto motuka na ye na nzela ya libanda lya mpepo ya Idlewild na kokende New York, le 02 août 1960.
Patrice Lumumba azali kopesa mbote wuto motuka na ye na nzela ya libanda lya mpepo ya Idlewild na kokende New York, le 02 août 1960.

Linu lilobama lizali ya Patrice Emery Lumumba, Ministre wa Yambo ya yambo na RDC, likozonhisama lisusu na Kinshasa le 21 juin kowuta na Belgique, lokola elobamaki.

Mbulamatari ya Ekolo Congo démocratique ezwi mokano yango na likita lya yango ya vendredi.

Boko na bayi mbulamatari bayebisi ete Ministre wa yambo JEan=Michel Sama Lukonde alobi mbonge ya misato ya COVID-19 ekopesa nzela te milulu misalama.

Mokolo ya bozongisi eteni ya nzoto ya nkondo Lumumba mozongisami nsima, mobu mokoya.

Mposo moleki, mbulamatari ya Belgique esakolaki ete Roi Philipe akokende lisusu te na Kinshasa mpo na milulu mya lipanda mpe matanga, likolo se ya bokono boye.

Kasi, kati na libota lya nkondo Lumumba baike balingi te ete eteni ya nzoto ya tata na bango ezongisama na mboka na bokonzi ya Félix Tshisekedi oyo baike balobi tata na ye nde azalaki moko ya bato batindaki ministre ya kala RDC na liwa.

Guy Patrice Lumumba alobi libota lifundaki bato 12 babale mpo na liwa lyango.

Bayi libota bazali kozela bosambisami ata baike ya bafundami basi bakufa.

Esika ya kotia linu yango ebongisami na place Lumumba na échangeur, na Limete, na Kinshasa.

Mwana ya policier moko ya Belgique nde alakisaki linu lyango nsima na liwa lya tata na ye oyo alobaki abombaka liny liye nsima na kobomoma Lumumba na baninga ba ye, na 1961, na Haut-Katanga,

Policier yango atatolaki ete bakataki nzoto ya Lumumba mpe batiaki yango na acide.

XS
SM
MD
LG