Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akomi na Beni


Président Félix Tshisekedi na bokomi bwa ye na Beni, na Nord-Kivu, 15 juin 2021. (Twitter/Patrick Muyaya)
Président Félix Tshisekedi na bokomi bwa ye na Beni, na Nord-Kivu, 15 juin 2021. (Twitter/Patrick Muyaya)

Président Félix Tshisekedi akomi na Beni, moko na bingumba ya Nord-Kivu epayi wapi état de siège ezali kosalama.

Bokomi na ye bosamalami na nse ya mbela ekasi.

Yango elakisi mpiko na yen a kozongisa kimya na ngambo eye ya mboka, ekomi na Twitter molobeli ya mbulamatari Patrick Muyaya.

Président Tshisekedi azali na Nord-Kivu wuta mokolo mwa mposo na mpokwa.

Alakaki kokende kotala na miso ndenge misala mya état de siège etiaki, mizali kokende.

Président Tshisekedi asakolaki o’mokolo mwa eyenga ete akozala mercredi 16 juin na Kasindi, na ndelo na Ouganda mpo na kobandisi, elongo na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni, botongami ya ba nzela ekosangisa mboka mibale.

Mokonzi ya RDC alakaki mpe kokoma na Ituri.

Nord-Kivu na Itrui ezali na nse état de siège mpe bakamabi ba FARDC mampinga ma RDC nde bazali kokamba yango.

Akandaki na Nord-Kivu kombondisa baye bazwaki mpasi na botomboki bwa volcan Nyiragongo le 22 mai.

XS
SM
MD
LG