Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Museveni bapeti piololo ya bobandi botongi nzela ekosangisa Ouganda na RDC


Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni (D) na libanga elembo ya bobandisi botongi nzela kati na bikolo mibale, na Kasindi to Mpondwe, 16 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (G) ya RDC na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni (D) na libanga elembo ya bobandisi botongi nzela kati na bikolo mibale, na Kasindi to Mpondwe, 16 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi na mokokani wa ye ya Ouganda Yoweri Museveni bapeti piololo ya bobandi botongi nzela ekosangi bikolo mibale.

Milulu misala na ndelo ya bikolo mibale, esika moka Kasindi, na ngambo ya RDC, ekutana na Mpondwe, na ngambo ya Ouganda.

Président Tshisekedi akundoli ete ezali likanisi lya Museveni kasi ye asepelaki na yango wuto ayokaki yango.

Président Tshisekedi alobi nzela yango ekokolisa ba échanges (bosombitinia) mpe mombongo kati na bikolo mibale mpe ekopesa nzela ya kokitisa bozangi bokengi.

Nzela yango ya 223 kms ekouta Kasindi kino Goma. Kasindi-Beni (80 Km), Beni-Butembo (54 Km), Bunagana-Rutshuru-Goma (89 Km).

Ekosenga misolo 334,5 millions ya ba dollars américains.

Mbulamatari ya bikolo mibale bayokani mpo na yango ntango bazali kozela ekateli ya bozongeli na bosambisa mpo na mbeba esalaki na bitumba na Ekolo congo démocratique.

Compagnie indienne moko ezalaka na Ouganda nde ekotia 60% ya misolo mpe Ouganda na RDC 20% moko moko.

XS
SM
MD
LG