Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Lamuka esengi bolukiluki  mpo na 15 millions $, kaniaka mpe mbeba inso ya mikolo miye


(G-D) Adolphe Muzito, Martin Fayulu, Moïse Katumbi na Eve Bazaiba na bokutani ya Lamuka ma Lubumbashi, Haut-Katanga, 30 juillet 2019. (Lamuka)
(G-D) Adolphe Muzito, Martin Fayulu, Moïse Katumbi na Eve Bazaiba na bokutani ya Lamuka ma Lubumbashi, Haut-Katanga, 30 juillet 2019. (Lamuka)

Lingomba Lamuka esengi ete bakonzi ya misala ya bosembo babanda bolukiluki mpo etali misolo 15 millions ya ba dollars miye mizali komonana, kaniaka mpe mbeba inso salami mikolo miye.

Jean-Pierre Bemba, Martin Fayulu, Moise Katumbi mpe Adolphe Muzito bapameli "na bokasi bonso bobungisami mpe bokoti na misisa ya mbeba oyo ebebisi lobi ya mboka mpe elongoli elikya inso mpe bozeli bonso ya mbongwa na bana ya mboka na biso," elobi liyebisi ya lingomba liye.

"Tosengi na lombangu na bakambi ya misala ya bosembo kobanda na mokumba monso mpe na bopikiliki, bolukiluki na ntina ya komema pole na ekolo likolo ya bopunzami ya makoki ya l’Etat, kaniaka mpe na bozwami ya misolo ya l’Etat lokola bopengwisami, oyo bato bakinisi esalami, ya 15 millions ya ba dollars," elobi bakambi ya Lamuka.

Jean-Pierre Bemba, Martin Fayulu, Moise Katumbi mpe Adolphe Muzito basengi mingi mpenza ete bakonzi ya misala ya bosembo bapesa "etumbu na baye batindi mpe baye basali yango na ntina ya kosukisa bobisi misolo ya l’Etat mpe ndakisa ya moyibi oyo ezali kobebisa lobi ya ekolo".

Na mokanda yango, bakambi ya Lamuka basengi mbongwana ya ba institutions na ntina ya kobanda mbotama ya sita ya ekolo.

Nzonkande, mokonzi ekolo Felix Tshisekedi ayanolaki mpo etali likambo ya 15 millions $, ete misala ya bosembo mizali kolandela likambo yango.

Na boyebi ya M. Tshisekedi, 15 millions $ myango mipengwisami te kasi ezalaki nde "coop", elimbolaki ye na mituna ya TV5.

Yango nde misala mya bosembo mizali kolandela.

Procureur ya Cour cassation asakolaki mikolo mileki ete asilaki kozwa likambo ya kaniaka na maboko. Asengaki na bato banso kaloba lisusu te makambo myango.

Kasi kaniaka ezali kolobelama mingi na RDC.

Mposo moleki, bayike ya ba ntoma ya Assemblee proviciale ya Kongo central bapalelaki kaniaka ntango ya kopona likambo ya mbeba ya bilili ya botaka ya mokambi ya mibale ya etuka na bango.

Bakambi ya Lamuka basengi bana ya RDC kotelema, elongo na Comite Laic ya coordination na societe civile, na ntina ya kozala na milulu mikosalama na mikolo mikoya. Ntina na yango "ezali koloba : 'Te na bozongi etumbu, na bopengisi mislo, na kaniaka etiyami mpe na bozangi bosembo na mboka na biso'", elakisi liyebisi.

XS
SM
MD
LG