Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apesi nzela na botiyami ya ba Sénateurs


Félix Tshisekedi atomboli Mobeko likonzo na botiyami na ye na bokonzi, na etando ya Ndako ya ekolo, na Kinshasa, le 24 janvier 2019.
Félix Tshisekedi atomboli Mobeko likonzo na botiyami na ye na bokonzi, na etando ya Ndako ya ekolo, na Kinshasa, le 24 janvier 2019.

"Eloko te ezali kopekisa lisusu botiyami ya Sénat," elobi président Félix Tshisekedi na liyebisi liye litangamaki o’mokolo ya jeudi na butu na etando eke ya RTNC.

Mokano yango elongoli meko liye litelemisaki botiyami na mosala ya ba Sénateurs ya sika, nsima ya bofundami ya kaniaka ntango ya maponami ya le 15 mars moleki.

Mokonzi Tshisekedi atelemisaki mosala liye na bokutani ba institutions (interinstitutionnelle) nsima ya mobulu ya balandi ya UDPS (lingomba ya politki na ye) moye momemaki kufa na mutu na Kasaï.

Epesemelaki procureur ya Cour cassation kosala bolukiluki lokala asengaki yambo na maponami biye.

"Mokonzi ya ekolo amoni pré-rapport liye mpe apesi longonya na ba magistrats mpo na mosala moye mpe apesi bango mokakoswa mpo bamema misala yango kino na suka," elobi liyebisi liye.

FCC (Front commun pour le Congo) ya Joseph Kabila nde elongaki na koleka 90 mabonga ya ba Sénateurs na maponami maye.

XS
SM
MD
LG