Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

F. Tshisekedi alaki kotiya manzaka na boyokani ya UA ya bitumba na kaniaka


Président Félix Tshisekedi na édition ya yambo ya mokolo ya Afrika ya bitumba na kaniaka na Kinshasa, RDC, 11 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na édition ya yambo ya mokolo ya Afrika ya bitumba na kaniaka na Kinshasa, RDC, 11 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi azalaki jeudi na édition ya yambo ya mokolo ya Afrika ya bitumba na kaniaka na Kinshasa, engumba mokozi ya RDC, eyebisi baye ya présidence.

Mama na likambu ya bokutani boye mozali : "Lolenge bana ya Afrika bakosangisa mayele mpe kozongela bozuwi na bango ".

"Kozanda etumbu, koyiba molo ya l'Etat mpe kaniaka esengeli ezala lisusu te na bomoi ya bana ya Congo démocratique ya mikolo minso," elobi président Tshisekedi.

M. Tshisekedi alaki, na bokutani boye, ete akotiya manzaka na boyokani ya Union Africaine mpo na kobundisa kanyaka.

Bokutani boye bosalami na OSCEP (Observatoire de surveillance de la corruption et de l’éthique professionnelle).

XS
SM
MD
LG