Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou asengi kimya kati Centrafrique na Tchad nsima bobomami ya ba soda


Président Denis Sassou N'Guesso nsima na koponama na Brazzaville, 21 mars 2021.
Président Denis Sassou N'Guesso nsima na koponama na Brazzaville, 21 mars 2021.

Denis Sassou N’Guesso, président ya Congo-Brazzaville mpe mokambi ya CEEAC lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati kati asengi na bakonzi ba Centrafrique mpe ya Tchad kokitisa mitema mpe kozala kimya nsima na bobomi na basoda ba Tchad.

Basoda motoba ya Tchad babomamaki o’mokolo mwa eyenga na bayi mampinga ma Centrafrique baye makatisa na ngambo ya Tchad.

Bobengani kati na bikolo mibale bobandaki.

Nzonkande mbulamatari ya Centrafrique endimi ete ezalaki nde libunga lya basoda ba yango baye bakinisaki ete ezalak batomboki baye bakimaki na Tchad.

Mbulamatari ya Centrafrique epameli mbeba ya mampinga ma yango.

Mampinga ma Centrafrique mamemaki mpe basoda baike ya Tchad, baike kati na bango bazokaki.

Tchad esilikaki mpe elakaki kozongisa.

Ba ministres ya mambi ya babpya ya Tchad mpe Centrafrique bakutanaki o’momokolo mwa mibale na N’Djamena mpo kosolola yango.

Président Sassou abengisi mpe Bakonzi babikolo bya CEEAC na likita lya kafukafu le 4 juin na Kintele pene na Brazzaville mpo kotala makambo ma politiki mpe bokengi na Tcad, elobi presidence ya Congo-Brazzaville.

XS
SM
MD
LG