Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Batomboki balaki kotambola na N’Djamena kala te nsima na liwa lya Idriss Deby


Président Idriss Deby Itno na milulu mya bopesi ye pete ya maréchal na N'Djamena, Tchad, aout 2020.
Président Idriss Deby Itno na milulu mya bopesi ye pete ya maréchal na N'Djamena, Tchad, aout 2020.

Batomboki basangana na lisanga FACT (Front pour l’alternance et la concorde na Tchad) balaki kotambola na N’Djamena, engumba mokonzi ya Tchad, nsima na liwa lya maréchal Idriss Deby Itno, mokonzi ya ekolo eye.

Batomboki bango basengi bana mboka banso komilengele na bokweyisami na bokonzi bonyokola bango mingi.

"Tokoba bopusani bwa biso kino N’Djamena. Tozali na ekuke ya engumba mokonzi," eyebisi molobeli ya FACT Kingabé Ogouzeimi de Tapol.

Batomboki ba FACT balobaki lundi ete babetaki mampinga mpe babomaki baike na mampinga.

Babimisaki nkombo ya ba officiers supérieurs ya FAT (Forces amrées tchadiennes) babomaki, bazokisaki, bakangaki to bakimisaki.

Kati ba officiers baye, batangaki nkombo Idriss Deby Into babengaki colonel, pete batelemeli mingi bapesaka mokonzi ya Tcahd oyo akufi,

Na ngambo na yango, FAT elobaki mokolo moko moleki, lundi, ete ebobamaki nde batomboki mingi, koleka 300.

Ezalaki nsima na président Idriss Deby kokende o’mokolo mwa mposo na bitumba na nord.

Maréchal Deby azokaki na masasi na bitumba yango mpe akufaki nsima na kozongisama na N’Djamena.

FACT eboyi bokonzi ya basoda bokambami na général de corps d’armée Mahamat Idriss Deby, mwana ya mowei maréchal Deby.

Conseil militaire ya transition général ya transitition eye ekambami na général Mahamat ekweyisi parlement, ekangi ndelo inso ya mboko, etie couvre-feu mpe elaki kosalisa maponami na lombango.

XS
SM
MD
LG