Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou, Touadera, Deby na Lourenço basengi masolo na Centrafrique


Ba présidents Faustin Archange Touadera ya RCA (2e D), Joao Lourenço ya Angola (3e D), Denis Sassou N'Guesso ya Congo-B. (C) mpe Idris Deby ya Tchad ((2e G) na likita lya CIRGL na Luanda, Angola, 29 janvier 2021. (Twitter/Thierry Moungalla)
Ba présidents Faustin Archange Touadera ya RCA (2e D), Joao Lourenço ya Angola (3e D), Denis Sassou N'Guesso ya Congo-B. (C) mpe Idris Deby ya Tchad ((2e G) na likita lya CIRGL na Luanda, Angola, 29 janvier 2021. (Twitter/Thierry Moungalla)

Ezalaki mini-Sommet ya CIGLR (Conférence internationale ya Grands lacs) mpe Idris Déby azalaki mobengisami ya kafukafu mpo na kozala nzinganzinga na Centrafrique mpe na kilo na ye na maye matali bokengi etuka ya kati ya Afrika mpe na makambo maselemaka na Centrafrique.

Matata ma Centrafrique makopesama eyenao na masolo, elimboli na compte Twitter, molebeli ya mbulatari ya Congo-Brazzaville, Thierry Moungalla.

Bakonzi ba bikolo basengi batelimisi bitumba sika oyo, kolanda M. Moungalla.

Basengi mpe lisusu na CPC (Coalition des patriotes pour le changement) ezonga bisika ezalaki yambo na masolo mabanda.

CPC ezwi mwa ba mboka na Centrafrique ata pene na Bangui, engumba mokonzi, na bitumba ezali kosala wuto yambo na maponami ma le 27 décembre président Touadera asakolamaki molongi na koleka 53%.

CPC esengaki bopusani bwa maponami mango, lokola mpe mpe mokonzi ya kala François Bozize oyo nkombo na ye ebwakisamaki na misala mya maponami na zuzi.

Bakonzi ba bikolo Lourenço, mokambi ya CIRGL, mpe

Sassou N’Guesso, mokambi ya CEEAC, batindamaki na ONU mpo na kosala likita liye.

Esengami na M. Sassou koluka mobondi ya matata maye. Mpe bakambi babikolo bazalaki na likita lyango basengi na molongo kolongola bopekisi bwa bosombi bibundeli likolo na Centrafrique mpo na kopesa yango nzela ya kobatela bokengi bwa yango yango moko.

Bakokutana lisusu nsima ma mikolo zomi.

XS
SM
MD
LG