Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi, Deby, Carvalho, Touadéra mpe Bongo na bokutani ya CEEAC na Libreville

Ali Bongo, président ya Gabon, na bokutani ya CEEAC elongo na bakokani baye Félix Tshisekedi ya RDC, Idriss Déby Itno ya Tchad, Faustin-Archange Touadéra ya Centrafrique, Evaristo Carvalho ya Sao Tomé-et-Principe, Libreville, 18 décembre 2019. (Facebook/p

Président Félix Tshisekedi azali na bokutani ya bakambi ya bikolo ya CEEAC (Communauté économique ya bikolo ya Afrique centrale) na Libreville, na Gabon.

Ba gouvernements to mbulamatari ya bikolo ya lisanga liye bakotia manzaka na mokanda ya mbongwana na lingomba liye.

"Mokolo ya lelo le 18 décembre 2019 ezali mokolo ya mbongwana na CEEAC. Emipesi architecture institutionnelle eye ekokani na ba défis esengeli alonga. Mpo na etuka na biso, ekozala na maye maleki mpe maye makoya. Longonya na banso," elobi na babokokani baye mokonzi ya Gabon, Ali Bongo.

Félix Tshisekedi akomaki lobi loleki na engumba mokonzi na Gabon.

Azali kuna na bakonzi banei basusu ya etuka ya Afrika ya kati kati : Idriss Déby Itno ya Tchad, Faustin-Archange Touadéra ya Centrafrique, Evaristo Carvalho ya Sao Tomé-et-Principe mpe Ali Bongo ya Gabon.

XS
SM
MD
LG