Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atie matanga vendredi mpo na Idriss Deby


Président Felix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Tchad maréchal Idris Deby Itno na bokutani ya CEEAC (likita lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati) na Libreville, Gabon, 18 décembre 2019.
Président Felix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Tchad maréchal Idris Deby Itno na bokutani ya CEEAC (likita lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati) na Libreville, Gabon, 18 décembre 2019.

Ekolo Congo démocratique ekozala na matanga mpo na liwa ya maréchal Idriss Deby mokonzi ya Tchad vendredi, mokolo nkondo mokonzi ya Tchad akotiama na mabele na mboka na ye.

Président Félix Tshisekedi oyo azwi mokano yango atindi maloba ma kobondisa mitena mya bana ya Tchad na nkombo na ye moko, ya RDC mpe ya Union africaine azali kokamba.

Nzokande, na Tchad, bakonzi ya basoda bafungoli ndelo ya mboka bakangaki mardi na bosakoli liwa lya maréchal Idriss Deby Itno oyo akufaki mwa ntango nsima na kozwa masasi na bitmbu na bandongolomeso bawutaki na Libye.

Bayi opposistion, mingi mingi batomboki ba FACT, lingomba lya batomboki litelamaki mpo na koboya maponami bandimi te Conseil militaire ya transition (CMT) ekambami na général de corps d’armee Mahamat Idriss Deby, mwana ya mowei.

Général Mahamt Idriss Deby nde azwi bokonzi mpo na kokamba mboka na CMT.

Vendredi nde president Deby akokundama.

XS
SM
MD
LG