Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou abengisi likika ya CEEAC samedi mpo na matata na Centrafrique


Chinese President Xi Jinping and Congo Republic president Denis Sassou Nguesso
Chinese President Xi Jinping and Congo Republic president Denis Sassou Nguesso

Président Denis Sassou N’Guesso, mokambi ya CEEAC (Lisanga lya nkita lya bikolo bya kati kati ya Afrika) abengisi bakonzi ba bikolo ya etuka eye na likita lya kafukafu o'mokolo mwa mposo mpo na kotala matata na Centrafrique.

Likita lyango likosalama na visioconférence na 11 heures ya Brazzaville. Bakambi bikolo mpe ya mbulamatari nde bakozala na likita lyango.

"Mokambi ya CEEAC alendisi ngambo inso na matata kotia liboso masolo mpe kotia mosika botangisami na makila, na ntina ya bolamu mpenza ya bana ba Centrafrique," ekomi M. Sassou na liyebisi.

Président Sassou alobi ete azali kolanda na bokebi wuto mangomba ya basimba minduki mabandaki bitumba ntango etikali moke ete maponami masalama,o’mokolo mwa le 27 décembre 2020.

CPC (Coalition des patriotes pour le changement), eye esangisi mangomba motoba ya basimba minduki, esakoli «cessez-le-feu » na ngambo na yango yambo na maponami ma mokolo mwa eyenga.

Basimba minduki baye bazali kosenga président Faustin Archange Touadéra ya Centrafrique kopusa maponami na ntina ya kobongisa yango malamu.

M. Sassou bo' président ya ntango eye ya CEEAC alobi atungisami mingi lolenge makambo mazali kokende na Centrafrique. Mokambi ya CEEAC akundoli ete ba tata bakonzi mpe bakambi ya mbulamatari basakolaki le 18 décembre ete balonda processus to misala mya maponami mazali kosalama.

M. Sassou mpe alobi akotala nse linaka lyango.

Na ngaomba na ye président Touadéra na mbulamatari balobi maponami makosalama kaka kolanda linaka lya yango mpe bazali kopamela mokonzi ya kala François Bozizé na kotindaki basimba minduki koluka kokweyisa bokonzi.

Misala mya Maponami mpe bazuzi balongolaki nkombo ya M. Bozize na maponami mpo akokisaki maye mobeko mosengi te.

Russie etindaki balaki ya basoda kosunga mampinga ma Centrafrique.

Basoda 300 ya Rwanda bakomi na Centrafrique mpo na kopesa maboko na misala mya ONU (MINUSCA).

Mardi, basimba minduki babotolaki engumba ya Bambari yambo mampinga mazongela yango.

XS
SM
MD
LG