Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bokutani ya bakonzi ba bikolo ba CIRGL mpo na RCA na Luanda

Ba présidents Faustin Archange Touadera ya RCA (2e D), Joao Lourenço ya Angola (3e D), Denis Sassou N'Guesso ya Congo-B. (C) mpe Idris Deby ya Tchad ((2e G) na likita lya CIRGL na Luanda, Angola, 29 janvier 2021. (Twitter/Thierry Moungalla)

Bakambi ba bikolo ba etuka ya Grands Lacs to ya CIRGL bazali kokutana na Luanda na Angola mpo na matata na ekolo Centrafrique.

Paul Kagame ya Rwanda, Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville, Faustin-Archange Touadera ya RCA bazali na likita lyango libengisamaki na Joao Lourenco mokonzi ya angola mpe mokambi ya ntango eye ya CIRGL.

Bokutani bwango bolandi elonga ya M. Toudare na janvier eye mokonzi ya kala François na lingomba lya batomboki azali kokamba sika baboyui.

Likita lyango lizali kosalama na bozangi mokonzi ya Tchad maréchal Idriss Deby oyo akufi mardi nsima na kozwa masasi na bitumba na bandongolo meso na pene na delo na Libye.

Maréchal azalaka na masolo maleki mpo etali RCA. mpo na bokonzi mpe makasi ya mampinga ma ye pene na mboka eye ezali pene na Tchad.

Pré Félix Tshisekedi ya RDC mpe mokambi ya ngonga eye ya Union africaine mpe azali te masolo mango.

XS
SM
MD
LG