Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bikolo bya CEEAC bakotinda basoda na Centrafrique mpe bipesi maboko na maponami ma dimanche


Commando ya Egypte ya misala mya ONU na Centrrafrique azali kokengele bisika biike na Bangui yambo na maponami, RCA, 25 décembre 2020
Commando ya Egypte ya misala mya ONU na Centrrafrique azali kokengele bisika biike na Bangui yambo na maponami, RCA, 25 décembre 2020

Bakonzi ba bikolo bya CEEAC (Lisanga lya nkita lya bikolo bya Afrika ya kati kati) bakati ete bakotinda basoda na Centrafrique (RCA) mpe bazali kopesa maboko na maponami ma mokolo mwa eyenga na mboka eye.

Félix Tshiksekedi ya RDC, Evariste Ndayishimiye ya Burundi na Teodoro Obiang ya Guinée Equatoriale basanganaki na visioconférence na bokambami ya Denis Sassou N’Guesso ya Congo- Brazzaville, motambwisi ya CEEAC, mpo na likambo yango.

"Likita lisengi bokobi bwa misala mya maponami mazali kosalama mpe lisengi bana ba Centrafrique kokende ebele na maponami lobi le 27 décembre," elobi liyebisi lisukisi bokutani ya bakonzi ya bikolo ya CEEAC.

Bakonzi baye bapameli na makasi nyonso bitumba bizangisi bomoi na ba soda basato ya Burundi ya misala mya ONU na Centrafrique (Minusca), ebakisi liyebisi.

Basimba minduki basangani kati na CPC (Coalition des patrioites Centrafricains) bazali kosenga bopusi na maponami.

Président Faustin Archange Touadera ya Centrafrique na mbulamatari bazali kolakisa mosapi na mokonzi ya kala François Bozize mpe kofunda ye na koluka kozwa bokonzi na coup d’Etat.

Misala mya maponami mpe bazuzi balongolakai nkomba ya M. Bozize na maponami mpo balabi akokisi te maye mibeko misengi.

Russie etindaki basoda kotangisa mampinga ya Centrafrique mpe Rwanda mpe etindaki basoda ba yango 300 na Minusca.

Etats-Unis esengaki Russie kolimbola mpo na nini etinadaki ba soda baye.

Bikolo bya CEEAC bilobelaki mpe embargo (bopekisi) ya kosomba minduki ya ONU na Centrafrique. Mpo na bango, yango ezali ebaka na ya mokonzi ya Centraqieu na kokamba ekolo malamu.

XS
SM
MD
LG