Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matanga mpo na Idriss Deby na Congo-Brazzaville mpe na RDC vendredi


Ba présidents Denis Sassou N'Guesso ya Congo-B. (D) mpe Idris Deby ya Tchad (G) na likita lya CIRGL na Luanda, Angola, 29 janvier 2021. (Twitter/Thierry Moungalla)
Ba présidents Denis Sassou N'Guesso ya Congo-B. (D) mpe Idris Deby ya Tchad (G) na likita lya CIRGL na Luanda, Angola, 29 janvier 2021. (Twitter/Thierry Moungalla)

Président Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville akati ete ekolo na ye ekozala na matanda vendredi mpo na kokanisa molimo ya mokokani wa ye ya Tchad maréchal Idriss Deby.

Mercredi, président Félix Tshisekedi mpe azwaki moko ya lolenge se moko na RDC.

"Bendele ekotiama na kati kati mpe milulu minso mipesami ndingisa te miboyisami na etando ya mboka mobimba," ekomi na mokano na ye M. Sassou.

Lokola mpe M. Tshisekedi, M. Sassou atindi mpe maloba ya kobondisa mitema na bana banso ya Tchad mpe yna libota na ye.

"Na kokanisa boningami mpe bondeko na mwana ya Afrika eye ya lokumu, na mpasi enene ya kozange, nakozwa makasi masengeli na kokumisaka mpo na libela makasi ma ye na kosalela ekolo na ye mpe continent," ekomaki m. Sassou na mokanda mosusu.

MM. Sassou na Tshisekedi bakoki kozala vendredi na Tchad na milulu mya bokundi M. Deby.

Mwana wa ye, général Mahamat Idris Dey nde azwi bokonzi mpe azali kokamba bokonzi ya basoda to Conseil militaire ya transition (CMT) etiami na esika wuto bosakoli bwa liwa lya maréchale Deby mardi 20 avril nsima na ye kozoka na masasi na bitumba na batomboki bawutaki Libye.

Gén. Mahamat Idriss Deby alaki kosalisa maponami na na pene na sanza mibale.

Nungu ezali, mpo ngambo esusu ya mampinga ma tchad (FAT) eboyi CMT lokola mpe bayi opposition mpe batomboki ba FACT (Front pour l’alternance et la concorde na Tchad – Lisanga mpo na mbongwana mpe boyokani na Tchad).

FACT ekelamaki mpo na koboya maponami ma le 11 avril maye général asakolamaki molongi na koleka 79% na CENI lundi. Batomboki baye bakebisi ete bakokota na N’Djamena kala mingi te mpo na kozwa bokonzi.

XS
SM
MD
LG