Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean-Marie Michel Mokoko akoti lopitalo


Général Jean Marie Michel Mokoko,na bosanmbisami bwa ye na Brazzaville, 23 octobre 2019. (VOA/Arsène Séverin)
Général Jean Marie Michel Mokoko,na bosanmbisami bwa ye na Brazzaville, 23 octobre 2019. (VOA/Arsène Séverin)

Opposant Jean-Marie Michel Mokoko oyo akatelamaki mibu 20 ya boloko na 2018 akoti lopitalo na Brazzaville mpo na azali maladi. Basambela baye basengi bobimisami bwa ye na boloko.

Basembeli ba ye basangani na Amnesty International mpo na kosenga bobimisi bwa opposant oyo azali na mibu 73.

Moko basambeli ba M. Mokoko alobi bazali kozela eyano ya test ya makila esalami mpo client na bango azali ya kolemba mingi mpe azali kolya te.

M. Mokoko azalaki moko na baye bawelaki bokonzi na Denis Sassou N’Guesso na maponami ma 2016.

Bazuzi bakatelaki M. Mokoko mibu 20 mya boloko nsima kofundama na koluka kokweyisa bokonzi mpe kozwama na minduki mwa mikolo nsima.

M. Mokoko azalaki général na mampinga ya Congo-Brazzaville. Azalaki mpe ambassadeur na Centrafrique.

XS
SM
MD
LG