Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CPI eboyi kofuta Jean-Pierre Bemba mosolo mpo na boloko ya pamba


Jean-Pierre Bemba nsima na kotika nkombo na ye mpo na maponami na Kinshasa, 2 aout 2018.
Jean-Pierre Bemba nsima na kotika nkombo na ye mpo na maponami na Kinshasa, 2 aout 2018.

CPI Cour pénale intenationale ebwakisi bosenga ya kofutama mosolo ya Jean-Pierre Bemba oyo atikamaki na juin 2018 nsima pene na mibu zomi ya bosambisami mpo na mbeba ya bomoto mpe ya bitumba.

Ba avocats ya M. Bemba basengaki pene na 68 millions ya ba euros, na mars 2019, mpo na ntango alekisa na boloko na Haye, na Pays-Pas.

Basambeli ya M. Bemba balobaki ete biloka na ye bitalaki kopola na nsima na bokangami bwa ye. Biloko lokola pempo sambo mpe ba villas misato na Portugal.

Bazuzi bandima ete M. Bemba ayokaki mpasi te na libunga ya misala mya bosembo mpe baboyi kopesa ye mosolo asengi.

M. Bemba akangamaki mpe asambisamaki mpo na mbeba babundi baye ya MCL (Mouvement pour la libération ya Congo) bafundamaki na yango na bitumba na Centrafrique na 2002-2003.

XS
SM
MD
LG