Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ONU ekebisi na bomati ya maloba makotindaka na koyinana na RDC


Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.
Bakimi bitumba na Minembwe, na Sud-Kivu, février 2002.

BCNUDH (Bureau Conjoint ya ONU mpo makoki ma bomoto) ekebisi, na rapport ebisimi lundi, na bomati bwa maloba makotinda boyinani na RDC. Rapport ezali mpo na eloko ya 1er mai kino le 31 décembre 2020.

"Na lolenge ya koswana ya tribalisme, ya kolanda soki moto azali mwasi to mobali to na boyini basi, na kowutaka na bayi politiki na balandi ba mangoma ma politiki, na bakambi ba masanga ya kabila songo, na bayi société civile mpe na bayi diaspora (baye bavandaka libanda lya mboka), maloba mango mabimisamaki mingi na misala mya politki to ya masanga to ya matata to bitumba ya minduki," ekomi BCNUDH.

6% ya maloba mango mawutaki na diaspora.

BCNUDH epesi ndakisa ya nzembo moko ya commandant Maï-Maï moko mpe ya alanga nzembo ya Bafuliru etiamaki mingi na WhatsApp mpe ezalaki kosenga Bafuliru, Babembe na Banyindu konyokolo Banyamulenge na kobengana bango na mabele na bango mpe koboma bango. Bakangi ba biyamba baike batiaki maloba mango matindika na koyinana na mateya ma bango likolo lya maye matali politiki mpe bokengi," ekomi BCNUDH.

12% na yango ewutaki na société civile. "Na ndakisa ya maloba ma le 31 octobre 2019 ya lisanga lya Babembe bavanda na Kinshasa, maye masengaki baye ba bango kosala bitumba, kobengana mpe konyokola Banyamulenge na ba hauts plateau ya Fizi na Itombwe," ekomi BCNUDH.

43% nde ewutaki na bayi pilitiki.

BCNUDH elobeli mpe mafinga likolo na mokambi ya kala ya Assaemblée nationale Jeanine Mabunda na matata mabimaki na nsima na yango.

Mpo na BCNUDH, mbulamatari esengeli kopesa etumbu na makambo mango mpe kolandela mingi ba minorités na mangomba ya basimba minduki.

BCNUDH esengi bongo na misala mya sembo kotala mpo ete mibeko mitosama.

Esengi mpe ete misala mya sengo mitala malamu ntango elobami ete maloba mango mabimisamaki.

XS
SM
MD
LG