Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Muzito na Fayulu ya Lamuka bamituni mituna mingi mpo na "état de siège"


Martin Fayulu (2e na G) na molongani wa ye (1ère na G), Adolph Muzito (3e) na Valentin Mubake ya UDPS/Peuple, na 4e Convention ya Dynamique ya opposition, Kinshasa, 27 août 2019. (Twitter/Michael Tshibangu)
Martin Fayulu (2e na G) na molongani wa ye (1ère na G), Adolph Muzito (3e) na Valentin Mubake ya UDPS/Peuple, na 4e Convention ya Dynamique ya opposition, Kinshasa, 27 août 2019. (Twitter/Michael Tshibangu)

Martin Fayulu na Adolphe Muzito, bakambi babale ya ngambo moko ya lingomba Lamuka bamituni mituna mingi mokolo moko nsima na président Félix Tshisekedi kosakola état de siège mpo na Nord-Kivu na Ituri.

"Na nini bozangi bokengi na bituka bya Ituri na Nord-Kivu bokeseni na oyo ya Sud-Kivu na tanganyika ?, "emituni MM. Muzito na Fayulu.

Etat de siège to bokambi ya basoda, ekobanda le 6 mai, ekosala sanza moko mpe ekotala Nord-Kivu na Ituri kolanda lisakoli lya président Tshisekedi.

Kati na mituna na bango, MM. Fayulu na Muzito balingi bayeba soki ba "Seigneurs de guerre" to bakambi ya mangomba ya basimba minduki ya kala ya Ituri baye M. Tshisekedi abimisaki na boloko ya Ndolo mpe akutanaki na bango na Kinshasa bakoma wapi.

Batuni mpe soki bilembo ya mosala na bango bixali wapi.

Ba "Seigneurs de guerre" to bakambi ya basimba minduki batindamaka na Ituri na ntina ya komema basimba minduki koboya bitumba na Ituri,

Baike na bakambi ya basimba minduki baye bayanloka na VOA Lingala mpe balobaki bazalaki na kati ya nzamba mpe basololaki na basimba mingu mpe bandimisaki baike kotika bitumba.

Kasi bitumba bizali kak kokoba na Ituri.

Na liyebisi na bango, MM. Muzito na Fayulu batuni mpe soki basoda ya FARDC, mampinga ma RDC, baye balongaki basoda ya Rwanda, Ouganda mpe batomboki ba M23 bazali wapi.

MM. Fayulu na Muzito basengi ete makasi mazala mpo na kondima ete bituka ya Kivu bisimbama te na mampinga ma RDC.

MM. Fayulu na Muzito bakebisi mpe ete "état de droit" (mboka ya mibeko) mpe bonsomi ya bato bozala lisusu te na bisika mokano ya état de siège motiami.

Balobi mpe ete soki ndambo ya mboka ezali na bitumba, ekolo mobimba nde ezali na bitumba.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG