Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Muzito basengi CENI elongwa na nse ya mpifo ya bayi politiki


Martin Fayulu (2e na G) na molongani wa ye (1ère na G), Adolph Muzito (3e) na Valentin Mubake ya UDPS/Peuple, na 4e Convention ya Dynamique ya opposition, Kinshasa, 27 août 2019. (Twitter/Michael Tshibangu)
Martin Fayulu (2e na G) na molongani wa ye (1ère na G), Adolph Muzito (3e) na Valentin Mubake ya UDPS/Peuple, na 4e Convention ya Dynamique ya opposition, Kinshasa, 27 août 2019. (Twitter/Michael Tshibangu)

Adolphe Muzito na Martin Fayulu, bakambi babale balingomba Lamuka, bapesi makanisi ma bango mpo na bongwana ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) yambo na maponami ma 2023.

MM. Muzito na Fayulu basengi ete misala mya maponami to CENI milongolama na mpifo ya bayi politiki.

Basakoli makanisi ma bango vendredi liboso lya bapanzi sango na Kinshasa.

Makanisi mango mazali na matono 16, elobaki M. Fayulu oyo azali sika kotambwisa lingomba Lamuka.

MM. Fayulu na Muzito basengi ete plénière ya CENI ezala na bonsomi makasi.

Balobi ezali mpo na kopekisa nkwokoso lokola eye ya 1960 na Ekolo Congo democratique.

Plénière yango esengeli ekoma na bato 23 na esika ya 13, kati bango batindami mwambe ya biyamba, mwambe misusu ya ba forces sociales, na molobeli moko mpe batindami motoba ya mangomba ma politiki.

Bureau ya CENI esengeli ezala na bato 17 mpe ekambama na bayi biyamba na ngala na ngala ya sanza misato.

Makanisi mango mapesami ntango nungu nungu ebandi mpo na bosalami bwa maponami.

Mposo moleki CENCO, lisanga lya b'episkopo ya katoliko, lisengaki ete mbulamatari eye ekotiama na Ministre wa Yambo ya sika Jean-Michel Sama Lukonde eyeba na kobongisama maponami mpo masalama koleka 2023 te lokola mopeko mosengi.

Bayi lingoamba UDPS/Tshisekedi baike batombokaki mpo na yango.

Mposo moleki, MM. na Fayulu na Muzito balobaki ete bakambi basusu babale ba Lamuka, Jean-Pierre Bemba na Moïse Katumbi balongwe bango moko na lingomba liye mpo bakeyi na Union sacrée ekalami na président Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG