Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asakoli état de siège mpo na Nord-Kivu mpe na Ituri


Président Felix Tshisekedi na matanga ya Idriss Deby na N'Djamena, Tchad, 23 avril 2021.
Président Felix Tshisekedi na matanga ya Idriss Deby na N'Djamena, Tchad, 23 avril 2021.

Président Félix Tshisekedi asakoli état d'urgence mpo na bituka bizali na bitumba na monyele ya mboka. Etat de siège yango ekobanda le 6 mai mpe ekowumela sanza moko, kolanda maloba ma M. Tshisekedi.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique apesi lisakoli lya ye na lisikulu na television nationale.

"Nsima na kotala makambo manso... Nazwi mokano ya kosakola état de siège na etando mombimba ya bitkua ya Nord-Kivu mpe Ituri," elobi M. Tshisekedi.

Abwaki mbela na bavandi ya Nord-Kivu mpe ya Ituri na kopesa maboko na bakonzi ya basoda baye bakotiama na esika.

Asengi na ba Congolais banso mpe kozala motema moko na bavandi ya bisika bizala na bitumba.

Na basala ba Nzambe asengi losambo mpo na mboka.

Président alakaki kosuki maloba manso bato bazali koloba ete azali kosala eloko te mpo na kimya na monyele.

Ezalaki pene na mposo mibale mileki ntango asakolaki boyei ya mampinga ma Kenya na nzela na MONSCUO mpo na kosunga ba FARDC.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG