Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari ya Sama Lukonde endimami na Assemblée nationale


Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Mbulamatari ya Sama Lukonde ministre wa Yambo ya sika endimami na Assemnblée nationale nsima na koyanola na mituna miike ya bakeli mibeko.

Bakeli minbeko 410 nde bandimi yango. Mibale babibatelaki na kopona.

Yombo na yango, Sama Lukonde alakisaki yambo linaka lya ye na makonzi zomi na mitano mpe pene na misala 340 ya kosala.

"Tosokoli mabokoko. Tondimi mbulamatari yango eleka mpe ebanda mosala mbanga mbangu mpo mpasi ezali mingi na mboka. Tolingi te président Félix Tshisekedi akoba koloba ete FCC na PPRD bazalaki kopekisa ye asala mosala mpo bana mboka bazali mpeza na mpasi makasi. Basala! Tokozela, soki bakoki te, tokoloba bazongisela Joseph Kabila bokonzi na 2023 mpo biso tosalaki mpe tolakisi ete tokoki kosala mosala ata mabaku mazalaki," eyananoli mokambi ya groupe parlementaire PPRD na Assemblée nationale, mokeli mobeko François Zekuye.

Kati na makamba alaki kosala, Sama Lukonde alobi akotia bakambi ya basoda na bisika bitumba bizali kongala na monyele ya Ekolo congo démocratique.

Sama Lukonde alobeli makonzi ya politiki na ye. Alobi botangi bato na ekolo bokosala nzela moko na mabongisi ma maponai mpe akitisi mitema na baot na kolaba été mapionami makosala na 2023 lokola mokonzi ya mboka Felix Tshisekeid mpe asakolaki lobi na bokutani na bakeli mibeko.

Motango ya bekili mibeko bandimi linaka lya Sama Lukonde lizalaki nkama minei na zomi.

Ministre wa Yambo alaki ete botongami bwa libongo ya Banana na mbu enene ekosalama na boyokani ya sika ya bpesi misolo mpe alobi ekosalama yambo na botongami ya gbabga kati na Kinshasa na Brazzaville.

Sama Lukonde alobeli bitumba na kaniaka, kokembi nkita mpe misolo, sembo mpe kobongisa kelasi ya ofele mpe bokolongo bwa bato.

XS
SM
MD
LG