Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Katumbi akutani na bakeli mibeko ya Grand-Katanga


Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Moïse Katumbi, moko na bakambi ya Lamuka mpe mokonzi ya Ensemble pour la république, akutanaki na bakeli mibeko ya ngambo inso ya etuka ya kala ya Katanga. Bokutani yango bosalami ntango "majorité" ya sika ezali kolukama na Assemblée nationale nsima na bokatani ya libala CACH-FCC.

Bayi RDK (Rassemblement de députés katangais) balobi "ezalaki mpo na koluka bolamu ya etuka".

Bakeli mibeko ba RDK babeti sete na mpose ya base ya komona bayi politiki ya Katanga kotambola nzela moko mpo na ntombwa na makambo manso, elobi na liyebisi Martin Kabwelulu, mokambi ya RDK.

M. Kabwelulu azali moyi PALU eye ekoti na Union Sacrée.

Mpo na M. Kabwelulu, RDK ezali kokoba kokutana na bakambi ya espace Katanga.

Makambo maye mandimami malamu na bokulaka Moïse Katumbi oyo apesi biso makasi, elobi M. Kabwelulu.

M. Katumbi azali kosolola na bayi etuka ya kala ya Katanga, ntango Jean-Pierre Bemba, mokambi mosusu ya Lamuka mpe mokonzi ya MLC akutanaki na bayi grand Equateur mpe Bandundu ya kala.

MM. Katumbi na Bemba bandimaki koepsa maboko na président F♪0lix Tshisekedi na Union sacrée.

Kasi Martin Fayulu mtambwisi ya sik’oyo ya Lamuka mpe mokonzi ya ECIDE, elongo na Adolphe Muzito, bazali kokoba kosenga masolo mosusu makokamba na bayi molongo mpe biyamba mpo na kobimisa ekolo na nkwokoso.

M. Tshisekedi atiaki Modeste Bahati bo' "informateur" mpo na koluka majorité ya sika na Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG