Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asengi bana ba kelasi ba Beni kotika kolala libanda mpe alaki eyano ya bokengi


Mokambi ya Conseil européen Charles Michel (G) na président Félix Tshisekedi na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa, RDC, 29 avril 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Mokambi ya Conseil européen Charles Michel (G) na président Félix Tshisekedi na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa, RDC, 29 avril 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asengi na bana ba kelasi bazali kolala libanda wuto koleka mposo moko na Beni, kozanga na ba ndako na bango mpe alaki eyano ya bokengi na monyele.

Ezali eyano apesi na bapalangisi sango nsima na bokutani na mokambi ya mbulamatari to Conseil européen Charles Michel oyo azali wuta mokolo mwa misato na mobembo ya mikolo mibale na Kinshasa.

"Nasosoli mpasi mpe nkanda na mitema na bango (ya bana ba kelasi). Na ntango eye, tozali kokamata mikano makasi mpo na bokengi na monyele mobimba. Nasengi na bana baye, bo’ tata mpe mokonzi na bango, batika kolala libanda. Nalaki ete nakozala kala mingi te na bango. Oyo nalobaka, nakokisa yango. Nazali kobongisa biyano bya makasi mpo kasukisa libela nkwokoso ya monyele ya mboka, elobaki M. Thsisekedi.

Mokonzi ya RDC akebisi mpe bana bake kolanda bakolo baye bazali na makasi ma politiki na nsima.

Mpo na ye, bana ba RDC basengeli kopamela MONUSCO te. "Mpo MONUSCO nde ememaka bobomi bato te. Ezali likambo lisalamaka ntango bato bazali kozela te mpe na mayele ya mabe na kobombama. MONUSCO nde esalaka yango te. Esengeli toyeba ete MONUSCO nde eyaki kosunga biso mpo na kimya," elobi M. Tshisekedi.

Koleka mposo moko moleki, M. Tshisekedi ayokanaki na mokonzi ya Kenya Uhuru Kenyatta mpo ete mampinga ma mboka na ye makende kosunga maye ma RDC na bitumba na batomboki na monyele ya mboka.

Na biyano apesi bapanzi sango jeudi na Kinshasa, mokonzi ya RDC akundoli ete asololaki kala mingi te na limpinga lya basi mpe babali bawutaki na Beni mpe alakaki bango se likambo moko.

Limpiinga lyango, lokola mpe bana bakelasi bango bazali kosenga mokonzi ya mboka kokende kovanda na Beni lokola alakaki yambo na maponami mpe nsima na kozwa bokonzi.

Na ngambo na ye, Charles Michel alobi azali kopesa maboko na misala mya mbulamatari mpe union européenne ezali koluka nzela ya kopesa makasi na bitumba mbulamatari ezali kosala mpo na kimya.

Bokengi na monyele bozalaki mpe na masolo kati na M. Michel na Tshisekedi.

Nsima na yango, MM Tshisekedi na Michel babetaki piololo ya bobandi misala ya maswa mpe kauka to baliseur mabale Union européenne etongisi mpo na RDC.

UE epesaki koleka 60 millions d’euros mpo na yengo mpe masuwa mango matongami na RDC na société moko ya poto na basali ba RDC.

XS
SM
MD
LG