Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

SG Adjoint ya ONU asololi na Fayulu, Muzito na bayi FCC


Martin Fayulu (g) na Adolphe Muzito (D) ya Lamuka nsima na masolo na Jean-Pierre Lacroix, kalaka mokonzi molandi ya ONU mpo na mambi ma kimya, na Kinshasa, 14 décembre 2020, (Twitter/MONUSCO)
Martin Fayulu (g) na Adolphe Muzito (D) ya Lamuka nsima na masolo na Jean-Pierre Lacroix, kalaka mokonzi molandi ya ONU mpo na mambi ma kimya, na Kinshasa, 14 décembre 2020, (Twitter/MONUSCO)

Kalaka mokonzi molandi ya ONU mpo na mabi ma kimya, Jean-Pierre Lacroix akutani lundi na Kinshasa na boko na bakambi ba Lamuka mpe bayi FCC, na boluki kimya na matata mazali na RDC.

Martin Fayulu na Adolphe Muzito ya ngambo ya Lamuka bakutanaki na M. Lacroix.

Nsima na yango, M. Lacroix akutanaki na limpinga lya FCC.

"(M. Lacroix) Azali kosolala na ba congolais mpo na kotala ndenge nini kobima na nkwokoso eye, mpo na ete na maponami ma koya ezala bato bana mboka bakopona nde batiama na bokonzi," elobi M. Muzito.

M. Muzito abakisi ete ngambo ya baye batikali na Lamuka ezali kosenga bokelami ya ba commissions paritaires mpo na masolo makopesa nzela ya kowa mikano mya motuya.

"Totalisi kalaka mokonzi molandi ya ONU ete alandela matata mamemi na bokwabani (kati na CACH na FCC) mpe bosenga ya kopekisa mbeba," elobaki na ngambo na ye Néhémie Mwilanya, motambwisi ya FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

RDC ezali na matata mpe bobendani kati na bayi politiki.

Nsiam na boyoki bato président Félix Tshisekedi asalaki mposo misato, Kalaka mokonzi (SG) ya ONU Antonio Guterres asengaki ete masolo kati ngambo inso ya politiki masalama na kolanda buku likonzi.

Lundi, na lisikulu lya ye liboso ya Congrès ya RDC, M. Tshisekedi abetaki sete na bokabwani asali na libala ya CACH, lingomba lya ye, na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

M. Tshisekedi alobi ete mboka ezalaki na bokangami mpo libala liye. Mpe, ata ye (M. Tshisekedi) amikitisaki mingi mpe andimaki nsomi, amoni ete esengelaki kokata boyokani boye lokola bato mingi basengi yango na boyoki bato (consultations) asalaki mposo misato.

M. Tshisekedi apesi longonya bakeli mibeko baye bandimi kokota na Union sacrée akeli mpe bakweyi Bureau ya bokambi Assemblée nationale mpe babongoli majorité na parlement.

Etapi ekolanda ekozala botiami ya informateur mpo na kotala, ngambo nini ezali na majorité mpe kotia Ministre wa yambo, elobaki M. Tshisekedi.

M. Lacroix akomaki na Kinshasa dimanche, akokende na monyele ya RDC nsima na masolo azali kosala na bayi politiki.

XS
SM
MD
LG