Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mabunda asengi na comité des sages ya Ass. nat. kolandela likambo na kaniaka ya ba députés


Mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (C) elongo na mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Mokambi ya Sénat Alexis Thambwe Mwamba (C) elongo na mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda, na bokutani na président Félix Tshisekedi (amonani te) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, 13 octobre 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Motambwisi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda asengi na "comité des sages" ya suku ya nse ya Parlement kolandela likambo lya kaniaka ya ba "députés nationaux". Mokanda ya kosenga bolongwi na ye bozali kotambola na manzaka ma pene 250 députés, elobi Mohindo Nzangi, moko na bango.

Mme akomelaki comité des sages le 9 novembre.

Bayi PPRD bazalaki kopamela boluki kopesa kanianka na bakeli mibeko na ntina ya kobongola majorité na parlement.

Mokambi ya groupe parlementaire ya PPRD (Parti du peuple pour la reconstruction et la démocratie na baninga ba bango, Didi Manara alobaki ete baike balukaki kopesa kino 7.000 dollars na moko moko.

Président Tshisekedi ayokaki bato pene na mposo misato na ntina ya koluka kokela liboke lya sita ya bato bakotambola na ye na bokambi mboka.

M. Tshisekedi apamelaki boyokani kani na lisanga lya boyokani kati na lingomba lya ye CACH mpe FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Baike basengaki kokweyisakobongola majorité na Assemblée nationale.

Bayi FCC bazali kokebisa ete esalama na kobuka Buku

Mohindo Nzangi, mokeli mobeko ya Lamuka alobaki mercredi ete motango ya baye batie manzaka na mokanda mpo na kokweyisa bureau ya Assemblée natinale na Jeanine Mabunda, mosi moleka bato 250 lokola yango esengaki na mibeko ya Assemblée nationale.

Mardi, ba députés 305 ya FCC balakaki sembo na Mme Mabunda mpe na mokonzi ya kala Joseph Kabila

Conseil d’Etat ebwakisi mposo moleki bosenga ya mokeli mobeko Frabrise Puela nse mpo na likambo yango.

XS
SM
MD
LG