Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Guterres asengi masolo kolanda Buku likonzi kati na ngambo inso ya matata na RDC


Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

"Nasengi na ngambo inso kosilisa matata na bango na nzela ya masolo kolonda Buku likonzi, ekomi Kalaka mokonzi ya ONU," Antonio Guterres na rapport atikaki na Conseil ya sécurité lundi.

Président Félix Tshisekedi akosakola mikolo mikoya mokano azwi nsima na misala ya koyoka bato asalaki pene na mposo misato likolo ya matata na boyokani ya kokamba mboka kati na CACH (lingomba lya Tshisekedi) na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

M. Tshisekedi asakolaki yambo na yango ete makambo mazali kotambola te kati na bango na mibu mibale mpe alingi akela liboke lya sika ya bato bakotambola na ye na bokambi mboka.

Antonio Guterres akomi ete azali komitungisa na bobendani boye.

Kalaka mokonzi ya ONU akebisi ete bobendani kati na CACH na FCC bokeki kobepisa kimya mpe konga nzela na bokendi liboso bosalama wuto maponami ma 2018 bolandamaki na bopesani bokonzi ya kimya.

MM. Tshisekedi na Kabila bayokani na na kosala lisanga nsima na maponami. FCC ezwaki majorité na Parlement mpe territoriale kasi M. Tshisekedi, moko na ba opposant ya kala, abimaki mokonzi mboka.

XS
SM
MD
LG