Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Cohabitaion to coalition ekozala te na mboka, makambo wana masi maleki," ekati Kabund


Jean-Marc Kabund, secretary general of Congolese main opposition party the Union for Democracy and Social Progress (UDPS) speaks during a press conference in Kinshasa, Democratic Republic of Congo, Jan. 8, 2019.
Jean-Marc Kabund, secretary general of Congolese main opposition party the Union for Democracy and Social Progress (UDPS) speaks during a press conference in Kinshasa, Democratic Republic of Congo, Jan. 8, 2019.

Mokambi ya ntango eye ya UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, Jean-Marc Kabund akati na suka ya misala ya koyoka bato ete boyokani CACH na FCC bosi boleki.

"Cohabition to coalition ekozala lisusu te, ekomi makambo ma kala," elobi M. Kabund.

UDPS nde ezalaki llingomba lya suka président Tshisekedi ayambaki na suka ya misala ya koyoka bato azalaki kosala wuto pene na mposo misato.

FCC ekokutana na Tshisekedi kaka na ba structures ya mibeko mpe ya boyokani (Kambere)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:05:59 0:00

FCC, lisanga linene ya Joseph Kabila elongo na lingomba lya ye PPRD, eboyaki kozala na boyoki bato.

"Toboyi te masolo na président Tshisekedi kasi yango esengeli esalama kolanda misala ya boyokani na biso mpe etosa Buku likonzi," elimbolaki ngambo na ye kalaka mokambi molandi ya PPRD, Ferdinand Kambere na mituna ya VOA Lingala.

Mpo na M. Kambere, ezali na lolenge mosusu te majorité ekoki kobongolama na kati kati ya misala ya ndako ye bokeli mibeko, kolanda mibeko mpe Buku likonzi.

Président Tshisekedi abengisaki boyoki bato na ntina ya kokela liboke ya sika ya kokamba mboka mpo libala kati na CACH, lingomba na ye, na FCC lipesi nzela te ete mboka ekende liboso nsima na mibu mibale.

Matata mazali makasi kati na mangomba mabale maye mingi mpenza wuto mokonzi ya mboka atiaki bazuzi basato na Cour constitutionnelle.

Mpo na FCC, mokonzi ya mboka abukaki Buku likonzi.

Ngambo ya Lamuka (opposition) eye ezali sika kokambama na Martin Fayulu ya ECIDE mpe ezalaki te. Kasi Jean-Pierre Bemba na Moïse Katumbi bango bazalaki.

Esengeli kozela lisikulu mokonzi ya mboka akosakola mikano azwi nsima na koyoka bato.

XS
SM
MD
LG