Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ministère public esengi mibu mibale ya boloko mpo na Barnabé Milinganyo ya FCC


Barnabé Milinganyo Wimana, mokambi ya Rassemblement des leaders congolais, na Kinshasa, 21 aout 2018. (Facebook/Barnabé Wimana-Isombia)
Barnabé Milinganyo Wimana, mokambi ya Rassemblement des leaders congolais, na Kinshasa, 21 aout 2018. (Facebook/Barnabé Wimana-Isombia)

Ministère public esengi etumbu na bosambisami ya Barnabé Milinganyo, mokambi ya lisanga Rassemblement ya ba ba leaders congolais, mpe moko na balobeli ya FCC ya Joseph Kabila.

M. Milinganyo azali kosambisama na lobango samedi na tribunal de grande ya Gombe na Kinshasa nsima na bokangami na ye na ndako na ye.

Ministère public esengeli M. Milinganyo mobu moko ya boloko mpo na bokani koboma mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mpe mibu mibale mpo na mafinga ye.

Mikolo mileki, M. Milinganyo alobaki na ba media mingi ete eyano elamu ezali ete M. Tshisekedi atika mosala na esika ete mokambi ya lingomba lya ye UDPS, Jean-Marc Kabund, aloba ekozala ten a coalition to cohabitation na nsima ya mosala ya koyoka bato.

Soki te akolya mbuma, ekebisaki M. Milinganyo.

Bayi FCC, bakendaki te na misala mya boyoki bato M. Tshisekedi asalaki, bazali kokoba kosenga ete masolo na bokutani ya boyokani na bango mpe na botosi Buku likonzi.

Lisanga CACH ya M. Tshisekedi ezali na matata na FCC.

Bazalaki na boyokani ya kokamba mboka mpo FCC eleki na bakeli mibeko mpe M. Tshisekedi asakolamaki molongi ya maponami ma mokonzi ya mboka.

XS
SM
MD
LG