Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila aboyi PPRD mpe FCC bazala na mbulamatari, elobi Emmanuel Ramazani


Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)
Emmanuel Ramazani Shadary, secrétaire permanent ya PPRD azali kopesa lisikulu na bokutani ya Lubumbashi, Haut-Katanga, 24 octobre 2019. (Facebook/PPRD)

Mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique Joseph Kabila apesi mitindo ete PPRD, lingomba na ye, mpe FCC, lisanga lya mangambo masangana nzinga nzinga na ye, bakozala te na mbulamatari ezali kokelama na Monistre wa Yambo ya sika Jean-Michel Sama Lukonde.

Bakangambi ba lisanga mpe lingomba liye nde bapesi sango yango.

"Na etinda ya mokonzi ya PRRD (Parti du peuple pour la reconstruction na démocratie) na mboka, kalaka mokambi ayebisi ba banso na mboka mpe na mokili, ete akotinda ata moto te na bayi lingomba na mbulamatari ekoya," ekomi na liyebisi Emmanuel Ramazani Shadary na mokanda VOA Lingala ezwaki.

"Na polele, PPRD epesi etinda na moto moko te mpo akenda na nkombo na yango na mbulamatari ezali kokelama," ebetisi sete M. Ramazani.

Ndenge moko mpe lisanga linene lya mangomba masanganaka Nzinga nzinga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, FCC elobaki lobi ete ekozala te na mbulamatari yango.

Liyebisi lya FCC litiamaki manzaka na Raymond Tshibanda, mokambi ya cellule ya crise likalamaki nsima na président Félix Tshisekedi kopanza libala CACH-FCC.

FCC epameli bobuki lya Buku likonzi mpe mibeko mya Ekolo na bayi Union Sacree liboke president Félix Tshisekedi akeli nsima na kokata libala lya CAHC na FCC.

XS
SM
MD
LG