Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bahati Lukwebo aponami mokambi ya Sénat lokola mpe Michel Kanyimbu bo’ rapporteur


Sénateur Bahati Lukwebo na Cité africaine, Kinshasa, 02 janvier 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Sénateur Bahati Lukwebo na Cité africaine, Kinshasa, 02 janvier 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Modeste Bahati Lukwebo aponami bo’ mokambi ya Bureau définitif ya Sénat. Aponami na ba sénateurs 89 lokola ezalamaki.

Boponami ya M. Bahati bosalami lokola ezelamaki mpo azalaki kaka se ye moko na kowelela ebonga ya mokambi ya Séenat mpe apesamaki maboko na bayi Union sacrée, liboke lya boyokani ya sika nzinga nzinga ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

M. Bahati, mibu 65, mokambi ya AFDC (Allaiance des forces démocratiques du Congo) akoma moko na bayi politiki ya lintomba.

Na lingomba na ye, M. Bahati azali na députés mingi koleka nsima na PPRD.

AFDC ezali moko na mangomba ya makasi na FCC, boyokani bosalamaki nzinga nzinga na mokonzi ya kala Joseph Kabila.

AFDC ezali kutu lingomba liye limemi koninga nga na FCC.

M. Bahati atiamaki pembeni mpe lingomba na ye lipesamaki na Néné Nkulu.

Kasi M. Bahati akobaki kobunda mpe akendaki ngambo ya mokonzi ya mboka ya sika Félix Tshisekedi mpe andimaki kosala na Union sacrée.

Yango nde epesaki bozito mingi na Union sacrée mpe baike ya lingomba AFDC mpe basusu ya FCC mpe PPRD bakomaki kokatisa ngambo.

M. Bahati Lukwebo atiamaki «informateur » na président Tshisekedi mpo na kotala lingomba nini lizali na bakeli mingi mingi koleka nsima na président Tshisekedi kokata libala kati na CACH (Cap pour le Changement), lingomba na ye, na FCC, mpe kokela Union sacrée.

Ata azali na ba députés mingi koleka, M. Bahati andimaki kosala na esika inso mpo président Tshisekedi atiaki mposo mibale mileki Jean-Michel Sama Lukonde bo’ Ministre wa Yambo.

Maponami ya rapporteur ya sénat mpe esalami na kokamwisa te mpo Michel Kanyimbu oyo azalaki se ye moko nde aponami.

XS
SM
MD
LG