Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya Assemblée provinciale akweyisami na Haut-Katanga


Freddy Kashoba, mokambi ya Bureau ya Assemblée provinciale ya Haut-Katanga oyo akweyisami, Lubumbashi, Haut-Katanga, 12 février 2021. (VOA/Narval Mabila)
Freddy Kashoba, mokambi ya Bureau ya Assemblée provinciale ya Haut-Katanga oyo akweyisami, Lubumbashi, Haut-Katanga, 12 février 2021. (VOA/Narval Mabila)

Bakeli mibeko ya etuka ya Haut-Katanga baponi na motango koleka ba pétitions ezali kosenga bolongwi ya mokambi mpe bayi Bureau basusu.

Maponami mango masalami na bokambami ya Bureau d'âge eye ezali tambwisi Assemblée provinciale ya Haut-Katanga, Gabriel Kyungu Wa Kumwanza na moto na yango, wuto ba pétitions etikama.

Freddy Kashoba, ya AFDC mpe moko na bayi Union sacrée oyo azalaki komba Assemblée ya Haut-Katanga akweyisami.

Bakeli mibeko 28 nde bandimi alongwa mpe 18 baboyi yango.

Bayi basusu mpe balongwi.

Kaka rapporteur to molebeli ya Bureau nde atikaki mosala yambo na likita lyango.

Bayi FCC nde bapesaki pétition ekwisi mokambi ya Bureau mpe bayi Union sacrée, maye makweyisi bato batikali.

Esengeli M. Kyungu na Bureau d'âge esalisa mapinami ma Bureau ya sika lokola yango esalamaki mposo moko moleki na Assemblée nationale na Kinshasa,

XS
SM
MD
LG