Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC eboyi kozala na mbulamatari ya Sama Lukonde


Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.
Joseph Kabila, mokonzi ya FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya mboka ya kala na bokutani na bakeli mibeko na Kingakati, Kinshasa, 29 octobre 2020.

FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya kala Joseph Kabila eboyi kozala na mbulamatari ezali kokelama na ministre wa Yambo ya sika, Jean-Michel Sama Lukonde, elobi bakambi ba lisanga liye.

"Bo' mobateli ya mambi ma démocratie mpe ya bopesani bokonzi na kimya mpo na bayi RDC nyonso, FCC ekozala te mbulamatari ya Ministre wa Yambo Sama Lukonde kasi etombeliye mosala malamu mpo na bolamu bwa bana ba Congo," ekomi na liyebisi mokambi ya cellule ya crise ya FCC ekalamaki nsima bopanzani ya boyokani CACH-FCC, Raymond Tshibanda N’Tungamulongo.

"Baye ba FCC bakomekama mpo na kokende esika bazali kokabola bibonga na ndenge ya mabe mpe bakokota na mbulmatari, bakokende kuna na bozangi botosi ya mikano mpe mibeko ya libota lya politki FCC," ebakisi M. Tshibanda.

FCC ekundoli ete etelemlaka botamboli likolo lya Buku likonzi na baye bazali kokamba sika mboka.

FCC epamalaki bokweyisami ya libala CACH-FCC mpe bokelami ya majoritéya sika kati na Union sacrée ya président Félix Tshisekedi.

Ministre wa Yambo ya sika atiamaki wuto sanza moko kasi matata bazali na masolo ya baye bakozala na mbulamatari.

XS
SM
MD
LG