Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba bingali na Assemblée nationale kasi ministre ya Fonction publique atelemisi misala mya SG


Bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, RDC, 22 mai 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)
Bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, RDC, 22 mai 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)

Bitumbu bingali na Assemblée nationale kati na bakeli mibeko mpe na bato baike bakoti na ndako ya bokeli. Bayi ngambo ya UDPS bazali kobunda na bayi PPRD. Kasi ministre ya Fonction publiqiue atelemisi kalaka mokonzi ya AN oyo abengisaki likita lya lelo.

Bureau ya Assemblée nationale elobi na liyebisi, na Twitter, ete basoda batindami na mokonzi ya mboka bakoti na ndako ya bokeli miebko.

Bakeli mibeko ya PPRD na bayi ngambo ya FCC bazali kobunda.

Bondongwani mpo na bokambi bwa Assemblée nationale bokomi makasi.

Ministre ya Fonction publique Yallonde Ebongo Bosongo atelisimi misala mya kalaka mokonzi ya Assemblée nationale Jean Nguvulu nsima na ye kobengisa lelo na 11h30 likita lya bakeli mibeko.

Ministre Ebongo apemeli secrétaire général Nguvulu na kotambola likolo na mikano ya bokambi bolamu ya basali ba l’Etat.

M. Nguvulu abenigisami bakeli mibeko nsima na liyebisi lya Bureau ya Assemblée nationale ekambi na Jeanine Mabunda kotelemisa misala minso ya ndako ya bokeli mibeko mpo na bitumba mpe bobulu esalamaki lobi na ndako ya parlement.

Bayi FCC, lingomba lya mokonzi ya kala Joseph Kabila bafundaki bayi CACH na komema M. Nguvulu na makasi bisika biyebani wuto mokolo ya mposo nsima na bango komeka kotika na makasi nkasa ya kosenga bokweyisami bwa Jeanine Mabunda na Bureau mobimba. Nzokande bayi libota lya kalaka mokonzi ya Assembleé nationale Nguvulu.

XS
SM
MD
LG