Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UE ebakisi mikolo na etumbu ya Shadari, Kalev, Amisi, Numbi na bato basusu sambo


Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)
Kalev Mutond, mokambi ya kala ya ARN (Agence nationale ya rensiegnements) ya RDC, septembre 2019. (Twittwer/Kalev Mutond)

Union européenne ebakisi mikolo na etumbu likolo na bayi Ekolo Congo démocratique zomi na moko baye bafundama na 2016 mpo na kotelemela démocratie mpe makoki ma bato yambo na maponami masengelaki kosalama.

Kalev Mutomb, mokonzi ya kala ya ANR (misala mya bokengi), ba généraux John Numbi, Amisi Kumba, Ilunga Kampete, Ferdinand Ilunga Luyoyo, Eric Ruhorimbere, Célestin Kanyama, mpe basusu na bayi politiki lokola Jean-Claude Kazembe, Evariste Boshab mpe Emmanuel Shadari, Alex Kande Mupompa mpe Jean-Claude Kazembe bazali na kati.

Etumbu yango epikisi bango kosala mobembo na Europe.

Makoki to bowi na bango mpe ekangama na Europe, kolanda etumbu yango.

Uinion européenne elobi ete ebakisi mikolo na etumbu yango na kotala ndenge makambo mazali kotambola na RDC.

Matata mazali na RDC na mambi ma politiki kati na ngambo ya mokonzi ya kala Joseph Kabila na baye ya ngambo ya président Félix Tshisekedi.

Jeudi, Bureau mpe mokambi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda ya lingomba FCC mpe mpe lisanga PPRD ya M. Kabila bakweyisamaki na maponami na pétition (mokanda ya kosenga) bayi M. Tshisekedi batiaki manzaka mpo na kosenga bolengwi ya batambwisi suku eye ya Parlement.

Bokweyisami na bango bokoki kolakisa mbongwana na majorité to ya ngambo ya bato baleki na motango ya bakeli mibeko.

Président Tshisekedi akataki libala ya boyokani kati na CACH mpe FCC na bokambi mboka mpe asakolaki dimanche 6 décembre 2020 ete majorité ya kala ekweyisamaki mpe esengeli koluka ya sika. Yango abengisaki bato banso balingi na Union sacrée, lisanga azali kokela mpo na majorité ya sika eye ekotambola na ye na mandat na ye.

UE elongolaki Lambert Mende na Kabelisa na etumbu eye.

XS
SM
MD
LG