Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sama Lukonde akutani na Tshisekedi mpe alaki botiami ya mbulamatari kali mingi te


Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Jean-Michel Sama Lukonde, Ministre wa Yambo ya sika na RDC (G) na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation, Kinshasa, 18 mars 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Ministre wa Yambo ya sika ya RDC, Jean-Michel Sama Lukonde alaki ete mbulamatari ekobimisama kala mingi te. Alobi yango nsima na bokutani na président Félix Tshisekedi jeudi na Cité ya Union africaine, na Kinshasa.

"Tozali kolikya ete mikolo mikoya, tokoka komema linaka lya mbulamatari na Parlement na lisungi lya ba forces vives banso ya ekolo baye tokutani na bango," elobi M. Sama.

Mbulamatari ya sika eteiami nanu nsima na sanza moko mpe mikolo misato wuto mokonzi ya mboka Tshisekedi atiaki M. Sama na ebonga ya Ministre wa Yambo le février 2021.

Matata mazali na mansanga manso makoti na liboke Union sacrée pour la nation M. Tshisekedi akeli nsima na kopanza boyokani ya bokambi mboka na FCC (Front commun pour le Congo) ya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila.

M. Sama alobi ete makasi mazali kosalama mpo ete motango ya bato bazali na mbulamatari mokitisama.

Ata matata mazali, esengeli to kokoka kosala yango, elobi M. Sama.

Mbulamatari eye ezali kobima na mosala ezali na bato 65.

M. Sama alobi esengeli 30% elongwa.

Alaki mpe lisusu kokitisa misolo ba institutions basalelaka.

XS
SM
MD
LG