Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya FONER atindami Malaka


Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.
Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.

Procureur général ya Kinshasa/Gombe, atindi na boloko ya monene ya Kinshasa, na Makala, directeur ya FONER (Fonds national d’entretien routier), Fulgence Baramosi mpo na kopengwisa misolo ya kotunga nzela na mikolo nkama ya président Félix Tshisekedi.

"Ezali mpo kopengwisa koleka 20 millions $ ezalaki mpo kabongisa nzela na bituka ya Nord mpe Sud-Kivu mpe na Kasaï na société SCOC," eyebisi na VOA Lingala mokambi ya ACAJ (Association congolaise pour l’accès à la justice), Me Geroges Kapiamba.

Mpo na mokambi ya ACAJ, "ezali mafia ya solo eye misala mya bosembo miwuti kotiya maboko".

O’mokolo mwa misato (mercredi), Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, atindamaki mpe lokola na boloko ya Makala nsima na koyanola na mituna ya parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa Matate na Limete.

Mikolo mileki, bakambi baiike ya ba sociétés ya botongi, ya banques mpe bakambi ya ba baiike ya ba projets bitiyamaki mpe na Makala na bolukiluki ya boepngwisi misolo ya botongi mpo na mikolo nkama mya yambo ya Félix Tshisekedi na bokonzi.

Vital Kamerhe nde akabaki misala miye yambo na mbulamatari ya ministre ya yambo Sylvestre Ilunga esalama.

Bato banso baye nanu bakweyisami te o’likambo kasi bakozela kino procureur akolanda nzela inso yambo na kotinda bango na bosambisami to kotika bango.

Yango ekozwa mwa mikolo mpe sanza.

XS
SM
MD
LG