Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Molebeli ya Lamuka na Ituri abimi boloko nsima na mikolo mwambe


Luc Malembe, molebeli ya lingoma Lamuka na Ituri (C) kati ya baninga baye, nsima kobimisa na boloko na Bunia, 6 février 2020. (Twitter/Coalition Lamuka)
Luc Malembe, molebeli ya lingoma Lamuka na Ituri (C) kati ya baninga baye, nsima kobimisa na boloko na Bunia, 6 février 2020. (Twitter/Coalition Lamuka)

Luc Malembe, molebeli ya lingoma Lamuka na Ituri ayebisi ba pabanzi sango ete abimi boloko nsima na mikolo mwambe. Afundamaki na kofinga mokonzi ya mboka.

Opposant Luc Malembe azali moko na baye basimbaka Martin Fayulu, candidat na maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 décembre 2018. Akangamaki le 24 janvier 2020, mokolo ya mobu moko na bokonzi ya président Félix Tshisekedi.

Mpo na ye, "RDC elekisi mobu moko ya pamba ntango bana mboka bazalaki kozela komona mbongwana ya solo".

Luc Malembe alobi "amoni elikya ezali te mpo na mboka likolo na bokambi ya boyokani ya CACH ya Félix Tshisekedi na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila" oyo etondi na bato ya bokonzi ya kala na ba institutions inso.

Luc Malembe abimisami na boloko nsima na kofuta cautions.

XS
SM
MD
LG