Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame asepeli ndenge Macron azo’mema boyokani ya France na Rwanda


Président ya Rwanda Paul Kagame (D) na mokokani wa ye ya France Emmanuel Macron na 17e Sommet ya Francophonie na Yerevan, Armenie, 11 octobre 2018.
Président ya Rwanda Paul Kagame (D) na mokokani wa ye ya France Emmanuel Macron na 17e Sommet ya Francophonie na Yerevan, Armenie, 11 octobre 2018.

Président rwandais Paul Kagame alobi, na masolo na magazine Le Point, asepeli ndenge mokokani wa ye ya ekolo France Emmanuel Macron aboyi kotala makambo maleka na boyokani kati na Kigali na Paris bokende liboso.

"Ezali na mopepe ya sika. Mambi miike milakisi kokende liboso ya boyokani kati na mboka na biso mibale," elobi M. Kagame.

Kati na makambo mambo, Paul Kagame atangi mibembo mya ye asali na France na bobengisami ya M. Macron na mai 2018 mpe août 2019 mpe boponami ya ministre ya mambi ya bapaya ya Rwanda Louise Mushikiwabo na bokambi ya Organisation internationale ya Francophonie (OIF).

"Manso maye mazali malamu. Soki okitala makambo maleki, okobosana te… Tokoki kozela te bato basengana bolimbisi. Moto na moto esengeli azwa mokumba na ye mpe asenga bolimbisi soki ezali na motuya," ebakisi M. Kagame.

Paris na Kigali bazalaki na matata likolo na génocide (bobomami ya bonene) na Rwanda na 1994.

M. Kagame alobaka France ezalaki nsima na bobomami ya koleka bato 800.000 oyo mingi mingi ba Hutu bafundama na yango. Mampinga ya France mazali kosala opération Turquoise na Rwanda ntango ya génocide.

Nzokande bayike na France bafunda Paul Kagame na kobeta missile na avion ezalaki komema mokzni ya kala ya Rwanda Juvenil Abyrimana. Liwa liye likomasaki bitumba makasi kati na ba hutu na ba tutsi.

XS
SM
MD
LG