Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshala Muana azali kaka ya kokangama mpe nzembo na ye "Ingratitude" epekisami


Alanga nzembo Tshala Muana kati na Koffi Olomide (D) na Werrason (L) na Kinshasa, le 30 novembre 2013.
Alanga nzembo Tshala Muana kati na Koffi Olomide (D) na Werrason (L) na Kinshasa, le 30 novembre 2013.

Alanga nzembo Tshala Muana azali kaka ya kokangama na ANR, misala mya bokengi ya RDC, epayi wapi amemamaki wuto mokolo ya mposo nsima na bobimisami bwa nzembo na ye "Ingratitude".

"Mawa mingi mpo ezali kaka Tshsla Muana azali kaka ya kokangama," elobi ya VOA Lingala lundi na 21h45 ya Kinshasa, ,okambi molandi ya PPRD, Ferdinand Kambere.

Molebeli ya mbulamatari, ministre David-Jolino Makelele alimbolaki na VOA Lingala ete Tshala Muana azwamaki o’mokolo ya mposo nsima bobimi ya nzembo Ingratitude.

"Mama Tshala Muana abimisi nzembo oyo eleki te na Commission ya censure lokola mobeko mozali kosenga. Azali alanga nzembo ya liboso te ya kosimbama mpo na yango. Koffi Olomide kutu alala na boloko ya Makala mpo na yango," elobi M. Makelele.

Commission ya Censure epekisi na ba media kolekisa nzembo Ingratitude.

Mingongo mingi mitombolamaki mpo na koboya bokangami ya Tshiala Muana.

Bureau conjoint ya ONU mpo na makoki mabomoto epalaki yango lokola ACAJ na mangomba masusu.

Ba media ya RDC basakolaki ete abiimi na mpokwa ya lobi kasi bayi PPRD mpe libota lya ye balobi ezali lokuta.

XS
SM
MD
LG