Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba ayebisi Tshisekedi akopesa ye maboko


Jean-Pierre Bemba (G) apesi losaka na président Félix Tshisekedi na masolo na Palais de la nation, Kinshasa, 4 novembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Jean-Pierre Bemba (G) apesi losaka na président Félix Tshisekedi na masolo na Palais de la nation, Kinshasa, 4 novembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Jean-Pierre Bemba, mokonzi ya MLC mpe moko na bakambi ba lingomba linene Lamuka, alobi akopesa maboko na mabongisi manso ya masolo kati na bana ba RDC.

Ayambaki mercredi na Palais de la nation, na Kinshasa, na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi oyo azali koyoka makanisi ma bato mpo na koluka kobimisa mboka na nkwokoso.

"Solo... Nazali kopesa maboko na masolo manso kati na bana mboka Congo. Ezali mbeba te," eyanoli M. Bemba nsima na masolo na Tshisekedi.

Kasi apesi eyano ya siki siki te soki soki ezali na nkombo ya MLC to mpe ya Lamuka nde asololi.

Lamuka ebimisaki liyebisi mikolo mibale koloba ete likobimisa makanisi ma bomoko mpo na masolo maye mazali kosalama.

Nzokande, Moïse Katumbi mokonzi ya Esnemble pour la république mpe moko na bakambi ba Lamuka asakoli ete akokutana na Félix Tshisekedi o’mokolo mwa mposo.

Moïse Katumbi esengeli akoma na Kinshasa o’mwa mitano nakowuta Lubumbashi epayi wapi avandaka.

Martin Fayulu, mokambi mosusu ya Lamuka, akutanaki mposo moko moleki na président Denis Sassou N'Guesso na Congo-Brazzaville mpe ayebisaki ye ete asi apesa makanisi maye ya bobimi na matata malanda maponami.

Ezalaki kati na mibembo mibale ya M. Tshisekedi na Congo-Brazzaville.

Matata mazali na boyokani ya bokambi mboka kati na FCC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila na CACH ya Félix Tshisekedi.

M. asakolaki mposo mibale mileki ete akosolola na bato baike mposo kosala liboke lya sika likomema mboka liboso.

XS
SM
MD
LG