Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi andimi botiki mosala ya président ya Cour constitutionnelle Lwamba


Président ya Cour constitutionnelle Benoït Lwamba Bintu na Kinshasa, 19 janvier 2019.
Président ya Cour constitutionnelle Benoït Lwamba Bintu na Kinshasa, 19 janvier 2019.

Président Félix Tshisekedi andimi botiki mosala ya président ya Cour constitutionnelle Bénoit Lwamba Bintu ata mosambeli ya mokambi ya Cour ya likolo eye awanganaki yango. Directeur ya cabinet ya M. Tshisekedi, alobi apesameli ndingisa ya kopesa eyano na Conseil supréiur ya magistrature.

Mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, Désiré-Cashmir Kolongele Eberande akomelaki Conseil supérieur ya magistrature mpo na koloba ete azwi mokanda na yango.

Conseil supérieur ya magistrature etindelaki mokonzi ya mboka mokanda mpo koyebisa ete endimi bosengi ya kotika mosala ya Bénoit Lwamba Bintu bo' mokambi ya Cour constitutionnelle mpe ya conseil eye.

Nzokande, mosambeli ya M. Lwamba awanganaki lundi 13 juillet 2020 na VOA Lingala ete président ya Cour constitutionnelle alongwe mosala.

"Mokanda balobi président Bénoit Lwamba atindaki ezali lokuta. Président ya Cour constitutionnelle akendaki poto kosalisa nzoto mpe ayebisi ngai ete alongwe mosala te mpe akomi mokanda te. Esengeli kozela soki azongi mboka. Ntango wana soki alobi alongwe mosala nde ekozala likambo msusu," elobaki Me Théodore Ngoyi, mosambeli ya M. Lwamba.

Na mokanda na ye na Conseil supérieur, M. Kolongele Eberande ayebisi ete atindami na mokonzi ya mboka mpo na kozongisa eyano na mokanda président interimaire ya Cour cosntitutionnelle mpe ya Conseil Supérieur ya magistrature Evariste-Funga Molima Mwata atindelaki ye.

Nzokande Me Ngoyi alobaki linzaka etiamaki na mikonfa wana lizalaki lya lokuta mpe afundaki ANR na kobuka bureau ya président ya Cour constitutionnelle dimanche ntango yango ezalaki te na makoki mpo Cour sontitutionnelle ezali na epekiselo ya mibeko mya mboka.

Ba media nzike esakolaki ete M. Lwamba asengaki ye moko na président Tshisekedi abatela ye mpo azalaki komilengele na ntina ya kolongwa mosala.

Ba media yango elobi ete M. Lwamba alakaki président Tshisekedi ete akokoma moknda ya kolongwa soki akomi na poto,

M. Lwamba asakolaki mpe lisusu ete bato mingi mpe mangomba ma politiki maike bazali kotia ye mbamba mingi, kolanda ba media yango.

XS
SM
MD
LG