Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshala Muana abimi na bokangami na ANR


Tshala Muana na Kinshasa, le 30 novembre 2013.
Tshala Muana na Kinshasa, le 30 novembre 2013.

Alanga nzembo Tshala Muana abimi na bokangami na ndako ya ANR esika azalaki wuto bobimi ya nzembo na ye "Ingratitude".

Sango ya bobimi bwa ye bopesamaki lundi na mpokwa kasi atikalaki nanu kaka na bosimbami.

"Ezalaki likomba na ngai te kasi elataki ngai," alimboli na biyano ya mopanzi sango Stanis Bujakere..

Alanga nzembo Tshala Muana alobi ete asalaki nzembo yango banda kala kasi azalaki nde kobongisa yango. Etali makambo ya sik'oyo te na mboka

"Nzembo yango na yembeli mokonzi ya mboka te ndenge baot bazokanisa. Nayembeli trahison bao yo ba teka ngai, Nasala mingi. Ezala baninga, ezala baye tosala na bango mosala, ezala baye na tobombola, ti lelo oyo boye mosusu kutu awuti kokende kaki sik’oyo,"

Commission ya censure ya RDC epekisi wuto lundi bopetami ya nzembo yango na ba media inso.

XS
SM
MD
LG