Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba kala ya Parlement bapesi maboko na "état de siège"


Bato baike na etando ya Palais du peuple, ndako ya parlement, na Kinshasa, RDC, 2 mai 2016.
Bato baike na etando ya Palais du peuple, ndako ya parlement, na Kinshasa, RDC, 2 mai 2016.

Bakambi ba kala ba Parlement ya RDC bapesi maboko na "état de siège" to bokambi na basoda mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi atie na Nord-Kivu mpe na Ituri.

Bakambi ba kala ba Assemblée nationale na Sénat basengi na mokonzi ya mboka mpe mbulamatari mobimba kopesa misala mya "etat de siège" makoki masengeli mpe kotala yango lokola likambo ya bosenga makasi mpenza.

Aubin Minaku, Léon Kengo Wa Dondo, Thomas Luhaka, Evariste Boshab, Philomène Omatuku, Alexis Thambwe Mwamba na cardinal Laurent Monsengwo batie manzaka na mokanda ya mbela babwaki.

Basengi na bato banso bazali na makambo ma bozangi bokengi na monyele kotika koboma bato mpe na bana banso ba mboka koyeba bozito ya makambo matali bozangi mpe kosunga na bozongi ya kimya.

Nzokande, président Tshisekedi atiaki mardi bakambi ya basoda mpo na Nord-Kivu na Ituri.

Lieutenant général Luboya Nkashama nde apesami ebonga ya mokambi ya Nord-Kivu mpe alandami na commissaire divisionnaire Alonga Benjamin, esakolaki molebeli ya président Tshisekedi, Kasongo Mwema na liyebisi na etando eke ya RDC.

Lieutenant généralConstant Ndima nde atiami mokambi ya etuka ya Ituri mpe alandami na commissaire divisionnaire Ekuka Lupopo.

Etat de siège ekokota o’mosala lobi mokolo mwa minei.

Ba mbulamatari mpe ba assemblée ya bituka bitelemisami kasi bakokoba kozwa lifuta na bango mpe makambo misusu.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG