Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi atie bakambi ya basoda mpe police na Nord-Kivu mpe Ituri


Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi kati na commandants ya ba opérations ya FARDC nsima na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshsa, RDC, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Mokolo moko nsima na kosakola état de siège, président Félix Tshisekedi atie mardi na mpokwa bakonzi ya basoda mpe police mpo na kokamba bituka ya Nord-Kivu mpe Ituri.

Lieutenant général Luboya Nkashama nde apesami ebonga ya mokambi ya Nord-Kivu mpe alandami na commissaire divisionnaire Alonga Benjamin, esakoli molebeli ya président Tshisekedi, Kasongo Mwema na liyebisi na etando eke ya RDC.

Lieutenant généralConstant Ndima nde atiami mokambi ya etuka ya Ituri mpe alandami na commissaire divisionnaire Ekuka Lupopo.

Etat de siege ekokota o’mosala lobi mokolo mwa minei.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG