Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joseph Kabila azongi Kinshasa


Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC na bokiti na ye na libanda lya mpepo ya N'Djili na kotua Lubumbashi, RDC, 23 avril 2021. (Twitter/Barabra Nzimbi)
Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC na bokiti na ye na libanda lya mpepo ya N'Djili na kotua Lubumbashi, RDC, 23 avril 2021. (Twitter/Barabra Nzimbi)

Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila azongi vendredi Kinshasa sanza minei nsima kozala mingi na etuka ya Haut-Katanga mpe mbala misusu libanda lyambo.

"Mbula ya esengo enoki na Kinshasa; Nsima na pene na sanza minei na bozangi oyo bana ya Kinshasa babebangaka na bolingo Raïs, eza’ na nse ya manoko ya mapamboli nde J. Kabila akiti lisusu na mpepo na engumba mokozi," ekomi mosungi na ye ya sango Barbara Nzimbi na Twitter.

M. Kabila allongwa Kinshasa le 11 décembre nsima na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi kosakola ete akati boyokani ya bokambi mboka kati na CACH, lingomba lya ye, na FCC ya mokonzi ya kala.

Baike ya lingomba mpe lisanga ya Kabila bakatisaki ngambo mpo na kokende na boyokani ya sika Union sacrée M. Tshisekedi akeli mpo na kokamba mboka.

Bakambi ba Assemblée nationale mpe ya Sénat baye bawuta na FCC bawkeisamaki lokola mpe mbulamatari ekambamaki na ministre wa Yambo Sylvetre Ilunga Ilunkamba.

M. Kabila atiaki na esika misala mya kobongisa lingomba lya ye PPRD na lisanga FCC.

M. Kabila asalaki mibembo o'libanda lya mboka. Akendaki na Emirats arabes unis mpe na Zambie, Zimbabwe mpe Tanzanie.

XS
SM
MD
LG