Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou andimami na PCT mpo na kopesa nkombo na maponami ya mars 2021


Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala na ye na Brazzaville, 23 juillet 2020. (Twitter/Thierry Moungalla)
Président Denis Sassou N'Guesso na ndako ya mosala na ye na Brazzaville, 23 juillet 2020. (Twitter/Thierry Moungalla)

Président Denis Sassou andimami na lisanga na ye PCT (Parti congolais du travail) kopesa nkombo na maponami ma mokonzi ya mboka ma 21 mars 2021.

Bayi Comité central ya PCT basokoli mokano mwa bondimami yango na likita na Palais des Congrès.

"Comité central endimi na bato banso botiami ya ndeko Denis Sassou N’Guesso bo’ candidat ya PCT na maponami ma mokonzi ya mboka ya mars 2021," elobi lisakoli lya PCT.

Likita lyango likamba makaki na kalaka mokonzi ya PCT, Pierre Moussa.

Etikali kozela M. Sassou kondima botiami bwa ye mpo na kopesa nkombo na maponami.

XS
SM
MD
LG