Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

B’episkopo batombokeli mbulamatari mpo na "confinement" na ba feti na Congo-Brazzaville


Ba diacres na ba sango bamemi kandela kati na tempelo Saint Pierre Clavern Brazzaville, Congo, 26 mars 2016.
Ba diacres na ba sango bamemi kandela kati na tempelo Saint Pierre Clavern Brazzaville, Congo, 26 mars 2016.

B’episkopo ya eklezia katoliko bakomeli Ministre wa Yambo mpe mbulamatari mpo na kotalisa nkanda na bango na mokano ya kokanga bato na ndako na Noël mpe suka ya mobu na Congo-Brazzaville.

"Toyebi mbeba ekasi ya bokono boye. Kasi nsima na kotala malamu liyebisi ya bokambi ya ekolo (na bitumba na COVID-19) mpe komanyola makambo, tokoki te kososola malamu nini mpenza etindi bakambi kopimela eyenga ya Noël na bakristu, feti eye eleki na motuya na bondimi ya bakrsitu," elobi b’episkopo na mokanda na bango batindi na mbulamatari.

Bakambi ba eklezia ya katoloki bakundoli ete bato batosaka malako ya komibatela bisika binso ya losambo.

"Kasi kaka na ngonga wana, tomoni ete ba wenze mpe ba bus ebengami 'mal à l’aise' ezalaka ntango inso ya kotonda makasi na bato," etalisi b’episkopo.

Mbulamatari esakolaki nsima na likita lya bakambi ya bitumba na COVID-19, ete bato bakongama na ndako (confinement) mikolo mya ba feti mpe ba ekala na malewa ekongama na 19h.

Nzongande na lisikulu lya ye ya mercredi liboso ya Congrès, président Denis Sassou apesi mitindo ete mangwele malakama mpo na mboka.

XS
SM
MD
LG