Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou na matanga ya mokambi ya kala Ass. Nat. ya Gabon na Libreville


Président ya Gabon, Ali Bongo Ondimba na mokokani wa ye ya Congo, Denis Sassou Nguesso na N'Djamena, Tchad, 18 avril 2013.
Président ya Gabon, Ali Bongo Ondimba na mokokani wa ye ya Congo, Denis Sassou Nguesso na N'Djamena, Tchad, 18 avril 2013.

Président Denis Sassou N’Guesso azali na Libreville, na Gabon, na matanga ya mokambi ya kala ya Assemblée nationale ya ekolo eye, Marcel Eloi Rahandi Chambrier.

M. Sassou akozala na milulu mya kopesa losako ya suka na M. Chambrier oyo akufaki le 27 novembre 2020 na mibu 86.

M. Chambrier azalaki moyi Gabon ya yambo ya kokoma dokotolo.

Ministre na bokonzi ya Léon Mébiame Mba (1975-1990) mpe ya Casimir Oyé Mba (1990-1994), M. Chambrier akomaka mpe mokambi ya Assemblée nationale (1993-1996).

M. Chambrier azalaki moko na bayi lingomba PDG (Parti démocratique gabonais).

Azalaka moko na basungi ya makasi ya nkondo président Omar Bongo Ondimba ntango ya conférence nationale.

Omar Bongo akitana na mwana na ye Ali Bongo Ondimba.

Mwana ya M. Chambrier, Alexandre Barro-Chmbrier alanda lokolo ya tata wa ye na politiki kasi azali moko na bayi opposition na Gabon.

XS
SM
MD
LG