Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou na Moussa Faki basololi mpo na kimya na Afrika


President Denis Sassou Nguesso na mokambi ya misala ya union africaine Moussa Faki Mahamat (likolo) na bokutani mpo na kimya na Libye na Berlin, Allemagne, 19 janvier 2020.
President Denis Sassou Nguesso na mokambi ya misala ya union africaine Moussa Faki Mahamat (likolo) na bokutani mpo na kimya na Libye na Berlin, Allemagne, 19 janvier 2020.

Mokambi ya misala ya Union Africaine, Moussa Faki Mahamat basololi na président Sassou N’Guesso mpo etali kimya na Afrika na Brazzaville.

"Tosololi mpo etali kimya mpe bokengi na Afrika. Tolobeli matata na Libye, makambo ya Sahel, makambo na matali Afrika mobimba mpo boyebi ete mobu moye motiami na elombo ya kovandisi bibundeli kimya. Na bibimi ba masolo naye nalendisami mpenza, "elobi Mouass Faki nsima na bokutani na président Sassou.

Président Sassou azalaka mobondi na matata mingi lokola maye ma Libye mpe na RDC.

Mokambi ya misala ya Union africaine (Président ya Commission ya UA) ayebisi lisusu ete président Sassou alaki kokoba kosala mpo na kimya.

Masolo ma bango matalaki mpe bobandi bwa mobongo na kolanda boyokani ya ZLEC (Zone ya libre échange ya Afrika).

M. Moussa Faki azalaki jeudi na Kinshasa mpe asololaki na président ya RDC, Félix Tshisekedi, na kobongisa bokambi bwa ye ya Union africaine mokonzi ya sika na 2021 mpo na mibu mibale.

XS
SM
MD
LG